Kishore Kumar Hits

Papa Wemba - Omesatone lyrics

Artist: Papa Wemba

album: Bakala dia kuba


Sec Bidens eh, monganga
Yebisa bango ba pesa nga raison na nga kô
Po ba yebi eza ya nga
Histoire ba changeaka ngo té
Bakala Dia Kuba, Molokaï eeh
Omesatone, mesatone eh-eh
Omesatone, mesatone eh-eh-eh
Ami-ami, camarade ya mboka mondelé
Ba talaka na miso, ba yokaka na matoyi oh, ba lobaka na monoko
Muana yoka toli bako pes'o na bato ngo
Omesatone, mesatone eh-eh
Omesatone, mesatone eh-eh-eh
Ami-ami, camarade ya mboka mondelé
Ba talaka na miso, ba yokaka na matoyi oh, ba lobaka na monoko
Muana yoka toli bako pes'o na bato ngo, ooh
Okoya ko lembola nzungu moto ya suka
Mpo oboyi koyoka liteya ya nkoko e Niwa
Olobi oko yoka mateya ya mama na yo mpo y'abota yo
Bongo nani abotaki maman?
Muana okimi mbula eko ko bombana na ebalé
Tala buzoba esala ngando
Oyo buzoba esala croco
Wana bo niama osali mesatone, eh
Bako meleké mayi ya liziba té, oh
Bako meleké sé may'ebalé papa, tala muana
Eh kowela té safu ekobima, y'okolia koleka
Toko zela mbula ya sima, tambola molo
Eh kowela té safu ekobima, y'okolia koleka
Toko zela kaka mbula ya sima, kendeke malembé, ooh
Motema mbindo eeeh, eh-eh-eh
Matoyi mangongi eeeh, eh-eh-eh
Omesatone eeeh, eh-eh-eh
Suzy Kaseya eh, maestro
Ba lingi kosukola kasi ba boyi nzoto na bango epola mayi, ezalaka?
Moto mobimba elongi lokola porte ya boloko
Molimo mbindo, matoyi mangongi ayoka té dis-eh
Y'okanisi kindoki ezalaka ndengé nini muana ma
Tango y'okosala mabé, yango ndé bondoki eh-eh
Satana eh, molimo na yo mabé efuti yo
Misère yé-yé-yé, yé-yé mokili etelemeli yo, eeeh
Bato mibimba bilongi lokola porte ya boloko
Milimo mbindo, matoyi mangongi bayoka té dis-eh
Bakanisi kindoki ezalaka ndengé nini muana ma
Tango bakosala mabé, yango ndé bondoki eh-eh
Satana eh, milimo na bango mabé efuti
Misère yé-yé-yé, yé-yé, eh mokili etelemeli bango, oooh
Omesatone, mesatone eh-eh
Omesatone, mesatone eh-eh-eh
Ami-ami, camarade ya mboka mondelé oh
Ba talaka na miso, ba yokaka na matoyi oh, ba lobaka na monoko
Muana yoka toli bako pes'o na bato oooh

L'incomparable, Jean-Jacques Mbwa
Jules Mbala de Paris
Gustave Mpazu, Germany
Gabin Indianga, Bruxellois

Opalanga, eeeh
Polydore Onema, oyoki toko salela mvula na biso eh
Ba ninga, ba mipesa ba titre ya Grand Manitou
Chez Ntemba, Adam Bombole président, présidium
Ah nga nawé yo-yo-yo
Ah nga nawé nga papa na Djo yo-yo
Ah ba fingaka nga, ba sekaka nga, ba tsholaka nga
Nga nayebisa bango, moto ya motema mabé mboka na yé lifelo
Moto ya moyibi ndako na yé boloko
Moto ya matoyi mangongi suka sé bwalé
Misère yé-yé-yé, yé-yé, eh mokili etelemeli yo, oooh
Misère yé-yé-yé, yé-yé, eh mokili etelemeli yo

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists