Kishore Kumar Hits

Simaro Massiya Lutumba - Maya lyrics

Artist: Simaro Massiya Lutumba

album: Maya: L'Album des Albums


Maya
Oh Maya mon amour
Yoka mongongo mozali kobelela yo na kati ya butu
Yoka lokole na suka ya mboka
Ozali moto, kanisa
Nakomi lokola litanga ya mbula pembeni ya ebale, Maya
Kasi, ata butu eyindi makasi,
Tongo ekosukaka se etana
Nazali responsable na yo
Yo nde ozali coupable ya misère na ngai
Maya, ngai nakangi maboko na moto,
Makambo matondi ngai motema
Nakomi kotanga mikolo na misapi,
Nakomi nde kobanga
Mbala ya liboso tosalaki matata,
Ezalaki kaka boye
Soki nafungolaki miso te
Olingaki oboya ngai
Maya ngai natii loboko na litama
Makambo matondi ngai motema
Nakomi kotanga basanza na misapi
Nakomi nde kobanga
Mbala liboso okendeki Isiro ezalaki kaka boye
Soki nafutaki tike te nalanda yo
Olingaki ozonga te
Maya, namiswi lolemo,
Nazoki makila masangani na soi ya monoko,
Mosusu nabwaka mosusu namela
Nakomi na badoute
Mbala eleki osengaki divorce ebandaki kaka boye
Soki nalandaki lolendo na yo,
Ezalaki se tokabwana
Oh, Kisasa, Kisasa mboka te
Moto azali kokufa, bango bazali koseka
Moto nakei kosenga conseil
Akomi nde koseka pe kotongoko ngai na pembeni
Likambo ya kokamwa
Zuzi oyo amesana koasambisa matata ya ngai na yo maya
Nzoka nde alulaka yo lisusu
Mokili compliqué
O mama namipikoli suki na moto
Sango nayoki naboyi nde kondima
Nazangi confiance na matoi na ngai moko
Nzoto ekomi somo somo
Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda
Boni yo kanda lokola liwa
Osali zoba lokola ndoki
O mama namipikoli suki na moto
Sango nayoki naboyi nde kondima
Nazangi confiance na matoi na ngai moko
Nzoto ekomi somo somo
Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda
Boni yo kanda lokola liwa,
Osali zoba lokola ndoki yeyeh
Maya, nakomi lokola moto baswi na nyoka
Nakomi kobanga ata moselekete ya pamba Pasi ya moninga
Bakoyokaka na matoi kaka lokola lisolo
Kasi ekosala yo na motema lokola ye te
Bakabaka, badefisaka, basimbisaka,
Kaka se mbongo Maya
Kasi Bokono to pasi ya bolingo,
Héritier azalaka te
Maladi ya bolingo,
Dokotolo azalaka te
Ekosilaka se na moto oyo apesaki yo yango
Bakendeke bongo te ata ko asiliki
Abungaka nzela ya ndako te
Kasi ekomi lelo ngai naluka,
Toyokanaka bongo te ooh
Nalingaka toswana,
Po tomesana,
Nyonso abiance ya libala
Bitumba, bazuwa na miso ya bato
Namesana kobondela yo
O nzambe
Nzambe, nazwi nde etumbu
Nakangami na motambo
Lisumu nini nasali
Po nameriter etumbu ya motindo oyo
Nameki pe mbala mingi po naboya ye
Kasi nakokokaka te
Epai ko bolingo
Epai ngai pe ko moto ya maladi
Tokosuka boni?
Mokanda kutu nalingaka natindela yo, Maya
Epasuki na matanga ya motoki ya susi na yo
Maya, okomisi ngai kanda kanda na mokili
Nzambe asala eloko oyo bolingo,
Eloko oyo monyokoli
Ngai ko nalelaka libala bandeko,
Nzambe atindeli ngai elima
Ngai ko natuti libaku ya mabe,
Lisuma na lavi
Likambo te, Maya bala na yo,
Nazingi nde maboko
Ngai nakoluka moyen nabosana
Soki pe nakokoka
Natingama lisusu nini
Nakanga se motema ee
Awa ko bobotoli ngai ye
Boremplacer ngai nani
Nakei kolela na se ya mbula
Naboyi mpinzoli etika bilembo na matama ee
Oyo nyonso foti ya mama
Aponela ngai motema
Motema ya kolinga baninga ya mokili
Tika nanyokwama boye
Vieux MASASI,
Wapi BALENGE
AMISI ee
Maya, soki mokolo mosusu oloti ndoto kati ya butu
Yebaka ngai wa yo
Nazali kobanza yo
Eloko esali ngai nde makanisi
Tomeseneki mingi
Mokili monuni nanu te
Tina nini bolingo na biso enuna
Mama
Maya, soki moyen ezali,
Senga mbanda na ngai ya sika
Mokolo yo okokumba zemi, senga ye permission
Mwana ya liboso yo okobota,
Azala mwana ya mobali,
Azwa kitoko na yo,
Pesa ye kombo na ngai
Mokili monuni nanu te
Tina nini souvenir na biso ekola
Mama
Tonton Dolina, tonton Vila, Bakali
Tonton Amiso, Tonton nsuka
Bino bato bolinga lisano
Epai ya Siluvangi,
Epai ya LONGOMBA,
Na Faubourg epai ya Teddy Kinsala
Na Sexy Pop epai ya BeberNa Lukanu epayi ya Mayard
Na Exodus na Bandal
Soki bomoneli ngai Maya
Boyebisa ye
Epai akei, soki mobali atungisi ye
Azonga, azonga ko
Po na nini akomionyokola,
Esika na ye ezali awa
Nakangi maboko nazali kozela
Nazali se na esika atikaki ngai
Na se ya nzete ya lidame
Nzambe asala eloko oyo bolingo,
Eloko oyo monyokoli
Nzambe asala eloko yo amour,
Eloko oyo misère
Nzambe asala eloko oyo koaimer,
Eloko yo matata
Ngai ko nalelaka libala bandeko,
Nzambe atindeli ngai kisimbi
Nzambe asala eloko oyo bolingo, eloko oyo matata
Ayez mama ayez pitié Maya, mama
Ayez pitié
Tango ya kolala nde tango tokokanisa maye tokosala lobi Mama,
Maya tia ngai na programme ya lobi mama,
Maya kanisaka ngai mama
Butu ekomi molai ngai pongi te miso
Tongo ekomi kotana
Maya kanisaka ngai mama
Butu ekomi molai Yo na démarche ya Cameléon Maya kanisaka ngai ee mama
(E N D)

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists