Kishore Kumar Hits

Simaro - Trahison lyrics

Artist: Simaro

album: Trahison


Mokili nga na ya ba ndeko na kouti makambo lelo nga na ko yemba ngo
Mobembo nga na ya na mokili na moni makambo yango nga na ko yemba ngo
Na nzela ya mokili to yaka mboka
Mboka moto na libongo na ye a ko kiteee
To botama na mokili moto na ngonga na yé
Moto na chance na yé na elongui na yée
To yaka na mokili to zali nde ba
Paya mabélé yango nde eko yambaka biso
Mabélé ooh ooh mabélé to ko buakelaka soyi e
Mabélé ooh yeh mabélé eko bombaka bosoto na biso
Mabélé ooh ooh yeh mabélé eko boyaka ebembe tè
Mabélé ooh patrick mangassa ba ko kounda yo na banda se esika moko
Mabélé ooh ooh na cimetière to ko salaka zua tè
Mabélé ooh ooh yeh soki ba koundi molongani pembeni ya mbanda
Mabélé ooh ooh mabélé to ko niataka
Ya ngo nde eko koundaka biso pepe hein
Mokolo to ko balanaka na ndako ya nzambe
Liboso ya ko benisa biso sango a lobaka boyé
Bo balani pour le meilleur et pour le
Pire bo sangisi nzoto bokomi moto moko
Kasi mokolo ya liwa nini to ko monoka
Menuisier a ko sala sanduku se ya moto moko
Ba ko kunda moko, moko a ko tikala
Ata a leli lekola a kufa kasi a ko linga
Te ba kunda se sanduku moko na molongani nayé
Trahison ooh abbé jacque
Wapi libala sango o lobaka
Trahison ooh yeh bo balani pour le meilleur et pour le pire
Trahison ooh abbé molumba pour le meilleur pour le pire
Trahison oh tite tchima
Trahison oh sebene
Kasi na ndako ya nzambé ba ko tunaka mi tuna té sima ya
Losambo messe esili To ko bimaka se na liloba moko biso nioso ameeen
Guy mayalase oh yeh
Liwa lekola tango to ko botamaka
Mimie illumbé eh yeh
Moto na mokolo na yé na ngonga na yé
Koko ngoma eeh yeh libala se tango to zali na bomoyi
Vamos eh yeh ba veuve pe bazali na droit ya la vie
Eloko oyo bolingo eloko mabé E ko komisaka moko nde zoba
E ko tika bi teni nioso ya nzoto
E ko pona motema e ko niokolo yango
E ko mema yo ba nzela yo o yebi té
E ko mema yo ti na frontière ya mboka oyo o yebi kombo té oh
E ko pepa yo loboko ekati ngambo
Moleki nzela ye wana a ké
Ko linga pasii eh
Na lingaka ba ninga ba trahir nga
Bolingo pasi eh
Na libala ba futi nga na infidelité
Mbongo ye ye yeh eh mbongo
Na lingaka mbongo na vie nga
Mbongo ye ye yeh eh mbongo
Na lukaka mbongo na vie nga
Mbongo elakisi ngayi infidélité
Lelo na poche na nga lobi ya beverly
Lobi na poche ya Tedy Kintchala
Lobi kuna na poche ya franck mupezo
Lobi kuna na poche ya Guy Mayolase
E ko suka na poche ya Pepe Kalé
Na mema yé na bar a komi kuna a tikali
A pesi nga masanga abo kozonga ndako
To kendé na zando to koma kuna a tikali
A luli ba commerçant abo kozongo ndako
Mbongo ye ye yeh eh mbongo eh mbongo eh infidel
Dokotolo a pekisi nga lelo masanga
Likolo ya maladie oh oh ...cousin ya commerçant
Dokotolo a pekisi nga lelo cigarette
Ba ndeko oyo mibale na tikala na bango
Bayé na liaka na bango to salaka
Sekelé kaka bango lisusu ba trahir nga
Ba famille na ba ninga oyo na
Salisaka soki na zangi ba ko ndima ngai té oh
Bakanisi ko yebana ezali nde mbongo
Koyebana eeeh eh
Koyebana ezali ndé ngambo
Ba ninga basangisi eh
Basangisi lokumu na nga na mbongo
Dokotolo eh Ingila eh
Na lingaka masanga e boteli nga maladie
Cigarette ndenge moko na lingaka ciagarette e bebisi nga santé
Na tikala eh ngamoko na mokili
Lokola moyi e botama na ndeko te
Maladie eh yo ko tungisa nga
Ba ko kundu nga na yo libulu moko
Maladie oko niokolo nga
To ko kendé nga na yo sanduku moko maladie

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists