Kishore Kumar Hits

Emeneya Kester - Eve paradis lyrics

Artist: Emeneya Kester

album: Ndako Ya Ndele


Moto ako tuna nga sima, loba na ye nakeyi komipesa na mokili ya ba paya
Yeba na zeli mingi Eve
Molimu ebandi kobanga somo
Yakomona mayi ya misu kotanga
Tango ya bo mwana eleka eeh!
Moto ako tuna nga sima, loba na ye nakeyi komipesa na mokili ya ba paya
Yeba na zeli mingi Eve
Molimu ebandi kobanga somo
Yakomona mayi ya misu kotanga
Tango ya bo mwana eleka eeh!
Eve lambukaka pe na pongi
Kala na tikali nga moko nani ako yanola nga
Na tondi mawa
Na tikali nga moko po tango ya moto na liwa Nakomi mopaya epayi ba boti nga Eve eeh eh
Ebale ngambo, zamba na ngambo
Nga mwana moto na katikati nga nabelemi
Nakanisi maman tango ya kala,
Mbele ayanoli nga na ba pasi nga na moni
Kasi maman asi akenda nalela nani Eve eh eh eh!
Lambukaka nanu Eve eeh
Nga nabandi kokatshua
Moke moke lokola bougie
Nzoto ebandi kosila
Zua tango ya l'amour Eve Eve eh eh
Bolingo ebandaki epayi na yo
Ozalaki kobombela nga
Oye otumboli nga na sima
Pe obendi nzoto
Na ngonga moko Eve eh eh
Eve soki okangi motema
Mokumba oyo otikeli nga na nani
Na loba solo na bandi kobanga
Na mituni soki na keli lisumu
Makila mabe ya nzoto na nga ya kala
Na kosuka wapi na kolelka aah!
Ba mbanda ba gagner
Ba keyi na cherie ooh
Na tikali pamba
Maboko na mutu
Na lela yo wapi ooh
Eve ooh zonga oooh!
Na lela yo wapi
Eve oooh mabanzo oh oh oh
Na lela yo wapi
Eve ooh motema
Na lela yo wapi
Eve ooh Paradis
Na zua yo wapi

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists