Kishore Kumar Hits

Fally Ipupa - V.I.P lyrics

Artist: Fally Ipupa

album: Formule 7


"VIP"
Hum VIP Internationale
Bafana Bafana
Mwana ya MJ
Leki ya Bibiche Makope
Mon Vieux Martin Fayulu Faden House
Batu tout bazo kamwa ndenge Nana azo kola
Kitoko na'e ezo koba, Nana a nzulukaka te
Azali vision oyo bazwa Bible ba sangisa na Coran
Po Ba salela ango Roman
Eeh Nana Bafana
Unité de mesure ya basi ya mabala
Nana Bafana ye nde a komisa ngai papa na bana
La reine mère eeeh
Ye nde a komisa ngai papa na bana
Dernière ligne ya ko franchiser fidélité en perpétuité
Eza conduite ya Nana, Nana aza version unique
Azali pe chemin eko mema ngai na paradis
E monisa ngai ba anges
Eeh Nana Bafana unité de mesure ya basi ya mabala
Nana Bafana ye nde a komisa ngai papa na bana
La reine mère eeeh ye nde a komisa ngai papa na bana

Nzambe na paradis a luli Nana,
A transferré ye na enfer
Mais eloko ezo kamwisa na enfer Satana e tondisami na esengo
Moto ya lifelo e komi feu de l'amour
Nana Bafana aza mystère

Nzambe na paradis a luli Nana,
A transferré ye na enfer
Mais eloko ezo kamwisa na enfer Satana e tondisami na esengo
Moto ya lifelo e komi feu de l'amour
Nana Bafana aza mystère

Mbebo moseli lokola poso ya etabe o tie tembe o sieti
Présence na yo
Esalaka ngai ba frissons kokanisa ebembe ya nioka
Miso na ye elala oko kanisa respect ya cobra
Sourire ya bafana eza gag, esekisaka ngai à mort (neti na film)
Kitoko ya Nana matanga te mais elelisaka ngai
Bafana azali mbisi oyo pêcheur a kanga jamais (non)
Eva soki a zalaki Nana, mais Satan a koka te
La reine mère, chérie à moi
Bébé na ngai, nioso ya ngai
Amour na ngai, mama bana
Nzambe na paradis a luli Nana, a transferré ye na enfer
Mais eloko ezo kamwisa na enfer Satana e tondisami na esengo
Moto ya lifelo e komi feu de l'amour
Nana Bafana aza mystère

Nzambe na paradis a luli Nana, a transferré ye na enfer

Mais eloko ezo kamwisa na enfer Satana e tondisami na esengo
Moto ya lifelo e komi feu de l'amour
Nana Bafana aza mystère

Ata ba bandeli mokili nako senga na Nzambe to zonga na Bafana
Amour ya Nana eza mungwa ekota ngai na mikuwa
Na koma fan ya Bafana
Esi to boti bana, toko koma ti ba koko
Envie ya paradis eza te, na yo naza na lola Nana

Ozali sukali oyo ezanga na miel po miel ekoma miel na miel miel
Kombo ya Nana eza makomi oyo Satana a tanga te
Po e bongolisa ye motema
Kombo ya Nana ezali cri ya invocation oyo e kimisaka ba démons
Nzambe na paradis a luli Nana, a transferré ye na enfer
Mais eloko ezo kamwisa na enfer Satana e tondisami na esengo

Moto ya lifelo e komi feu de l'amour
Nana Bafana aza mystère
Nzambe na paradis a luli Nana, a transferré ye na enfer
Mais eloko ezo kamwisa na enfer Satana e tondisami na esengo

Moto ya lifelo e komi feu de l'amour
Nana Bafana aza mystère

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists