Kishore Kumar Hits

Ferre Gola - Kiti Ya Libaya - Acoustique lyrics

Artist: Ferre Gola

album: Home (Acoustique)


Slow
Slow, slow
L'amour est un crocodile
Sur le fleuve du desir
Belinda mbami mama ya bana
Colonel Van Kasongo
Bienvenu British
Grata amour nanga esino eyaki na ocean ya love nayo
Pourquoi yo ebale nanga o tarir vraiment trop tôt?
Presque île ya bisengo nanga ekomi lisusu inonder
Na vague ya ba soufrance ya ba douleur nga na leli
Slow, slow
Slow, slow, Mouvisson
Na elongi nanga monoko nanga ekoma nango fantasie ya pamba
Nakoma lokola mbwa ya kopale alobaka kaka soki y'oza te
Ata nazwi ba decision nanga ya kimobali eh
Etaleli nayo edeclanchaka ba phrases decisives na ngai
Slow, slow, Mouvisson
Motema ezo reclamer ata mwa litabisi ya bolingo
Ndenge riche asengaka mobola azua litanga ya mayi n'Enfer
Nani y'ango okoki'osalela nga ata anti soucie eh
Po na batami yango na sima ya ngomba bisengo no eretrouver nga kaka ha
Losambo na ngai epayi ya Nzambé lobi soki na kufi eh
Nasala reincarnation nazonga ata bébé nayo
Po na récupéré ba affection na ba tendresses eh
Po na rataki tango nazalaki epayi nayo
Bolingo na ngai, motema na ngai
Y'ozali nyoso na ngai molimo na ngai, mabanzo nangai oh ah
Nazalaki na espoir que j'amais oko boya nga lokola finaliste
A dechiraka uniforme na boule ako zonga lisusu te
Na bleu blanc mbinzo okomaki déjà papillon ngo ya oh
Okati ya mapapu nga nako tingama yo
Nako landa-landa yo nako tingama yo
Lokola a tingama Jacob
Nako djembela nanga yo ah
Na sanza misato balakisaka mwana ndenge nini ya kovanda
Ata ako nyokwama kasi exercise wana eko sunga ye
Po nga na vanda na motema na yo esengeli na sala nini na bolingo eh
Chérie pusana pembeni nangai na exhiber yo ba sentiment ya l'amour
Na mi tunaka soki Nzambe asala yo na magie nini
Po soki na moni yo de loin nzoto nanga mobimba efrissonnaka
Lokola moto 'attraper coup de froid en plein été, Mouvison
Caresse nayo ekomisaka ngai superman spirituel
Na komaka na planète ya bilengi sans lamentation
Pesanga interro générale ya bolingo na yo a tombo ouvert
Po na récupérer ba retard na ba points ya sentiment
Na tailler décompte ya bolingo nayo
Pardon bandela chapitre ya ba angle plat na ba angle fermer
Nako s'adapter facilement po eza metier nanga, ah Mouvisson
Bébé pesa nga
Bébé kabela nga visa ya mboka ya bilengi nayo
Prise en charge na nga na mbeto ezala assurer
Na kende ko fanda na sentiment na sécurité
Soki moto ya bosoto akoti epayi na bino asengi yo mayi
Ko pimela ye te oko mona boye mwana Nzambé oh
Makomami ekomama na bible akoya neti moyibi
Oko bamba libanga na sima
Mon bébé oko regretter
Bako effacer kombo nayo na liste ya bato bakokende na lola eh
Oko bule nga eh
Nake nake na ngai
Ange Gabrielle ako tiela yo jamais litoyi epayi ya Nzambé
Ba tindelaki yo bolingo, ndenge nini o bwakaki yango eh?
Patrice Lumumba akufaka martyrs ya ekolo
Lelo nga nazo kufa ko telema po na bolingo nayo eh
Laisser tomber, laisser tomber
Ba nzela nyoso oyo okenda eh
Tika tika tika tika s'il vous plaît pardon bosana
Laisser tomber, laisser tomber
Mouvison pardon zongela ngai
Pardon, pardon, pardon pardon banzela nyoso oya mabé
Po y'o lover nga bien, na lambela yo nini?
Po y'o lover nga bien, na salela yo nini?
Mbika na shawarma, nini eleki kitoko?
Nani'ango a bosani elengi ya boudin na kati ya sandwich oh?
Okamata sentiment y'opesa na banda conquérant
Kanisa bolamu na ngai, Mouvi
Po y'o lover nga bien, na lambela yo nini?
Mbika na shawarma, nini eleki kitoko?
Nani'ango a bosana elengi ya boudin na kati ya sandwiches oh?
Na sopela yo mayonnaise nzoto mobimba eh
Na tongela yo Canada na wenze ya Ngabe eh
Na tongela yo Canada na wenze ya Masina eh
Na tongela yo Tour Eiffel na Trionphale
Okamata sentiment y'opesa na banda conquérant
Kanisa bolamu na ngai, Mouvi eh
Po y'o lover nga bien, na lambela yo nini?
Po y'o lover nga bien Mouvison
Oyo osali nga Mouvison
Nako bosana te jamais à jamais
Ongulumisi nga likolo ya ko bondela soupu, soupu
Oyo osali nga Mouvison
Nako bosana te jamais à jamais
Ongulumisi nga likolo ya ko bondela soupu, soupu
Encore un peu de patience
Chérie zela saucison nayo ezala chauffer
Bongo'o nyamu nyamu oh
Yaka denda na tremplin ya bilengi na ngai
Po na zua élant ya ko plonger di
Na piscine ya bilengi na'o mon bébé
Comme ça na zinda po
Sauvetage na nga entre tes deux mains, Mouvison
Lelo nako binela yo ba dances folkloriques ya mboka na biso
Kamulango kamulango yo yo wa (kamulangu)
Kamulango kamulango yo yo wa (kamulangu)
Yves Batwa Mouvi sexo kutu ekosa (kamulangu)
J.P Mindia sexo kutu ekosa (kamulangu)
Junior Aziza sexo kutu ekosa (kamulangu)
Jean-jacques Mutwale sexo kutu ekosa (kamulangu)
Ebongo kiti ya libaya elelele nga (quick, quick, quick)
Ebongo kiti ya libaya elelele nga (quick, quick, quick)
Ata ekwei na mabele essentiel elelela ngai (quick, quick, quick)
Ata ekwei na mabele essentiel elelela ngai
Oyo osali nga Mouvison (Mouvi)
Nako bosana te jamais à jamais
Ongulumisi nga likolo ya ko bondela soupu soupu
Dédicace

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists