Kishore Kumar Hits

Ferre Gola - Tailleur lyrics

Artist: Ferre Gola

album: QQJD, Vol. 1


Dédicasses
Nzambé nayebi té, natuni lokola mwana kelasi
Kobota elengi mais pourquoi bébé ayaka se na kolela
Esengo elelisaka soki motéma ezwi coup par-dessus
Nani alekisi ebale entre nous deux po tokoma distancé
Eloko ya kitoko tango elengi eyaka pona nini tango yango esilaka
Tala natikali na posa eeeh
Ndumba té, kaka bolingo té, kaka soulagement
Batiaka ata litabisi ya bisou té pona ngonga
Awa owumeli kuna ce que maman ya bokilo apesi yo kiti
Tango okokoma mpiaka, akotiel'o bazoka na kiti synonyme ya bwakisa
Baza bayé na nzoto, na ba oyo bazanga bolingo
Oza na Choisy, ozo luka nini eeeh?
Na leli vraiment, Yésu sok'ozalaka Nzambe té
Mbele olapa mokili oyo, okozonga lisusu té
Souffrance eleki
Pasi elekeli nga, naké koluka marraine apesa nga conseil, nakuti ye pe azo lela
To tombé malade, même cas
Motéma ezo tuna ngai, soki ye nde catcheuse
Oyaki'oluka yé po abundela yo bitumb'oyo ya bolingo
Opoli moto bapimeli love neti moto babeti likofi
Soki evimbisi liso akosaka babeti ye nzété
Bolingo elelisi muzikana au-lieu ayemba "Ndombolo ya Ndombolo"
Akomi koyemba "zonga, zonga Choisy"
Bolingo elelisi prof, atuni b'élèves "qu'est-ce que l'amour?"
Po chérie aboyi yé, azueli yé moto'oyo atanga té
Yango AVC esali rage, misusu biloko ya chambre froide
Eza nango mpiodi té, bolingo ya Choisy Matata Imran
Nani yango akanga ba chances na nga ya vie?
Afungola lizita oyo ekangi ba chances na ngai
Na musée, lipapa ya mobola ebimi meilleur souvenir po modèle esila
Ekamwisi ba mvuama, ah vie na ngai
On dirait souffrance ya kobwakela, nani alinga ngai
To sala ba love ya sika, ah-yeh
Choisy Matata sika
Mita Harmonie alateli nga, pantalon ezanga etirette
Tokozonga epa tailleur (akoti'ango)
Est-ce que ndako yo olalaka, soki eza na porte té
Menuisier aza zoba té (po ati'ango)
Pourquoi okangeli ngai, nzela na ngai ya ba sentiment?
Yo tailleur ya mwasi, pantalon ya mobali na ngai
Otongi otié etirette té, quelle intention ya mabé
Sek'olingi olela nga, omoni Choisy koba, eh-iyo
Yo tailleur ya mwasi, pantalon ya mobali na ngai
Otongi otié etirette té, quelle intention ya mabé
Sek'olingi olela nga, omoni Choisy koba, eh-iyo
Koko Noé asali masuwa, singleton akota té
Akotisi biloko deux-à-deux po esala couple
Menuisier asali mbetu po tolala couple
Yo tailleur ya mwasi, pantalon ya mobali na ngai
Otongi otié etirette té, quelle intention ya mabé
Sek'olingi olela nga, omoni Choisy koba, eh-iyo
Ya nga na yo na parlement
Motion ya lelo ya ngai na yo
Yaka o proclamer po l'échec obimisi ngai
Repêchage eza té, na meka ata soki ekosimba
Na meka ata koluka boss ventrier
Na meka kokima mbangu na Lukapa
Motion ya Bestino Bilele na parlement
Motion ya Jean-Jacques Mutualé na assemblée
Motion ya nga na Derrick Kabeko
Motion ya nga na Tshibo Apula
Motion ya nga na Vieux Wasitu mwana Dallas
Yo tailleur ya mwasi, pantalon ya mobali na ngai
Otongi otié etirette té, quelle intention ya mabé
Sek'olingi olela nga, omoni Choisy koba, eh-iyo
Tango namatisaka son, Choisy achangaka vitesse
Wana akumba nga na profondeur ya bolingo
Bonheur na nga prolongé, Salomo Kavongo
Na ba pro-calé na yo, Judith Mvuma
Milita bébé swabala na kati ya bibéron
Poto-poto ya semoule, totikela yango evimbisa libundi
Yuma abara yankee pona ki trop sûre
Embuscade ya bolingo semblable na oyo ya kuluna
Na ozoka, na opesa tshombo oponi nini?
Stino Mayemba, J-C Kandolo, Blacky Oredozo
Choisy, fulu nini yango osopi bolingo na ngai?
Gabin Tokodi, fulu nini yango obwaki amour na ngai?
Otongeli moninga chantier ya mawa, Costa Couleur
Sentiment ekeyi makolo ngulu...
Obatami ndé wapi?
Oyo eloko ya nani, Didie La rose?
Bord ekomi otelengana, pourquoi ozo négligé love oyo?
Amour ekomi'otelengana, pourquoi ozo négliger love oyo?
Carine Sukami, ozo beta nga na miso ya bana kaka boyé
Ozo nionga nga na miso ya bana kaka boyé
Bolingo epesi nga buka-buka sentiment
Liberté zongela Dite quelle elengi
Bolingo epesi nga buka-buka sentiment
Liberté zongela Dite quelle elengi

Поcмотреть все песни артиста

Other albums by the artist

Similar artists